top of page

To tika Congo te !

Nazali mwana ya Congo

Tata na mama bakongo Ki-congolais ya tongo tongo Ki-congolais ya kobotama Na makila na matama

Na zali na nga te na esika Ata na keyi mboka ya sika Congo ekozala te mosika Ki-congolais ya mobimba Ya ndombolo pe ya mvimba mvimba

Na zali muana mboka Lumumba Kimbangu abanda etumba Nkimpa vita amema mokumba Ki-congolais ya Lomami ye na Wemba Mudimbe na Koffi na Chez Ntemba

Congo na nga lolango Congo ya flambeau Congo ya Lwambo Congo ya monzoto Congo ya tricolore Na zali muana mboka Solo ya ki-congolais, pilipili na liboka

Na kolemba Congo te Ata buzoba ya bayi politiki Na ya bayi mboka Eleki ndelo Poso elamu Toko tika Congo te ! Boko kende Congo ekozala kaka !

Texte de Tata N’longi Biatitudes

Commentaires


bottom of page